juillet 3, 2024
Lingala

Ba milliardaires mingi na Afrika

Na Afrika, bato mosusu bazalaka na mbongo mingi. Lapolo moko ya mbula na mbula oyo etali ba fortunes ya Afrika elakisi biso ete ba fortunes minene wana esengeli emata na 65%. Eza ebele !

Bikolo oyo ba millionnaires na ba milliardaires mingi bafandaka ezali Afrique du Sud, Egypte, Nigeria, Kenya na Maroc. Elongo bazali komonisa mingi ya bato ya bozwi mingi na continent. Kasi likambo moko ya kosepelisa: mingi kati na bato yango ya bozwi balongwe na mikili na bango mpo na kokende kofanda epai mosusu. Mpo na nini ? Tango mosusu ezali mpo na kozala na bomoi ya malamu, biteyelo ya malamu mpo na bana na bango to balopitalo ya malamu koleka.

Ndenge nini bakómaka na bozwi? Bon, ba misusu ba investir na biloko lokola charbon, or to mine. Kasi na nsima mbala mingi bazongisaka mbongo na bango na mimbongo na mboka na bango, na ndakisa mayele ya sika, bapanzi-nsango, bafilme, to ata tourisme écologique.

Mikili mosusu, lokola Maurice mpe Namibie, elingi kobenda bato wana ya bozwi. Bapesaka matomba ya mpako, elingi koloba ete bato wana ya bozwi bafutaka mpako moke. Namibie ezali kutu na ba projets ya kosalela énergie propre, lokola hydrogène vert, oyo ekoki kozala intéressant pona batu oyo balingi ko investir na domaine oyo.

Na mbula zomi oyo ekoya, ba millionnaires ekozala lisusu mingi na mikili lokola Maurice mpe Namibie. Oyo ezali nsango malamu mpo na mikili oyo!

Related posts

Ghana : Parlement efungoli minoko ya mboka

anakids

Ba Ngando ya Kenya Basololi Na Nkombo!

anakids

Ba filles baza na place na bango na science!

anakids

Leave a Comment