juillet 5, 2024
Lingala

Bokutani ya ekeko ya Ramsès II na Ezipito

Ekipi moko ya bato ya arkeoloji na Ezipito bamoni eteni monene ya ekeko ya Mokonzi Ramsèse II, moko ya bafaraon ya Ezipito ya kala oyo bazalaki na nguya mingi. Eza super intéressant ko comprendre histoire ya kala na culture ya Egypte.

Ntango bazalaki kotimola na engumba Minya, na sudi ya Ezipito, bato ya arkeoloji bamonaki eteni monene ya ekeko ya Mokonzi Ramesse II. Eteni yango, oyo esalemi na mabanga ya calcaire, ezali na bolai ya mɛtrɛ soki 3,8. Ekeko yango ezali komonisa Ramsès afandi, alati motole mibale mpe timon oyo ezali na nyoka ya mokonzi likoló na yango. Na nsima ya ekeko yango ezali na mayemi ya sipesiale oyo elobeli mokonzi. Ramsès II, oyo babengaka mpe Ramsès Monene, azalaki moko ya bafaraon oyo bazalaki na nguya mingi na Ezipito ya kala. Bokutani yango eyebisi biso makambo mingi na ntina na engumba El Ashmunein, oyo liboso ezalaki kobengama Khemnu, mpe ezalaki mboka-mokonzi ya etúká ya Hermopolis Magna. Bato ya arkeoloji bandimisi ete eteni yango ya ekeko yango ekokani na eteni mosusu oyo Gunther Roeder, moto moko ya Allemagne oyo ayekolaka biloko ya kala, amonaki na 1930. Sikawa bato ya arkeoloji bakopɛtola mpe bakobongisa eteni yango mpo na kozongisa ekeko yango mobimba.

Related posts

To découvrir Ramadan 2024 elongo!

anakids

Lisolo ya kokamwa : ndenge nini moombo moko ya mbula 12 amonaki vanille

anakids

Le 10 mai souvenir ya Commerce, Esclavage na Abolition na yango

anakids

Leave a Comment