juillet 5, 2024
Lingala

Fête monene ya 60 ans ya Banque africaine ya développement

@afdb

Mokolo ya misato, na Nairobi, na Kenya, Banque africaine de développement ekumisaki mibu 60 na yango! Banda wana, esalisi mikili mingi ya Afrika na kotonga banzela, biteyelo, balopitalo, mpe makambo mosusu mingi!

Fɛti yango ebandaki na kobɛta ngonga ya kabila mpe mabina ya Kenya. Emonanaki lokola émission magique ya munene, mais ezalaki kaka pona ko fêter Banque africaine ya Développement. Ba Présidents ya Kenya na Banque, William Ruto na Akinwumi Adesina, basepelaki mingi na boye ete babinaki kutu na ba danseuses!

Na boumeli ya fɛti yango, bato balobelaki lisolo ya Banque. Abotamaki eleki mibu 60 na Khartoum, na Soudan, lokola likabo na Afrika. Banque africaine de développement ezali lokola ekipi monene ya bato oyo bazali kosala elongo mpo na kosunga bikolo ya Afrika ekoma makasi mpe esengo.

Banda wana, esalisi mikili mingi ya Afrika na kotonga banzela, biteyelo, balopitalo, mpe makambo mosusu mingi!

Président ya Banque, Akinwumi Adesina, alobelaki ba projets fantastiques oyo Banque esali. Lokola kosunga bikolo kobundisa Covid-19, kotonga ba usines mpo na kosala kisi na Afrika to kobongisa banzela mpe biteyelo.

Akinwumi Adesina alobaki mpe ete Banque ezali awa mpo na kosunga Afrika ekoma makasi mpe kitoko. Asengi na ba présidents africains basala elongo mpo bana banso na Afrika bakoka kokola na kimia, kokende kelasi, mpe kozala na lobi ya malamu.

Na suka, Vice-président ya Banque, Bajabulile Swazi Tshabalala, alobelaki avenir ya Banque. Alobi ete bazali na elikya ya kosunga bikolo mingi ya Afrika bikoma makasi mpe na bomengo na mibu mikoya.

Fɛti yango esukaki na kobɛta mabɔkɔ mpe kosɛka mingi. Bato banso basepelaki kosepela mibu 60 ya Banque africaine ya Développement. Pamba te grâce na ye, Afrique ezali na avenir ya bien liboso na yango!

Related posts

Kala mingi te océan ya sika na Afrika ?

anakids

Musée africain na Bruxelles : mobembo na histoire, culture na nature ya Afrika

anakids

RDC : bana balongolami kelasi

anakids

Leave a Comment