ANA KIDS
Lingala

Michael Djimeli na ba robots

Michael Djimeli, ingénieur moko ya Cameroun, alingaka barobo banda bomwana na ye. Sikawa azali kosalisa banakelasi bátonga ba modèles mpo na boyekoli na bango na nzela ya kompanyi na ye, Kodji Robot.

Afandaka na Tunisie mpe aponamaki lokola meilleur entrepreneur migrant 2022.

Ntango azalaki naino elenge mpenza, Michael azalaki kotala ndenge ndeko na ye azalaki kosala baaparɛyi ya elektroniki. Yango epesaki ye mposa ya koyekola makambo ya elektroniki mpe ya kosala baprogramɛ. Nsima ya kozwa diplome na ye ya licence na ingénierie électrique, akobaki koyekola na Tunisie.

Kodji Robot esalisaka bayekoli ya ingénierie basala ba projets na bango ya mbula ya suka. Michael amonaki ete komeka ezalaki kozanga na bakelasi na bango mpe azwaki ekateli ya kosalisa bango na ba entraîneurs ya makoki.

Michael andimi ete Afrika esengeli na ba ingénieurs mingi oyo bayekoli malamu mpo na kosala mpe kobimisa bamasini na mboka. Ezali mpe kopesa bana formasyo na robotique, kobanda na mbula mitano, mpo na kobongisa bango mpo bákóma ba ingénieurs ya lobi.

Atako azali na mikano na Etats-Unis, Michael alingi kozonga na Tunisie mpo na kokola mombongo na ye mpe kosalisa lisusu banakelasi mpe bana mingi na Afrika.

Related posts

Tobundisa ba déchets ya biloko ya kolia pona kobikisa planète!

anakids

Boyekoli : Bokoli ya kokamwa na Afrika!

anakids

Libenga ya nokinoki uta na Namibie mpo na kobatela ba océans

anakids

Leave a Comment