juillet 8, 2024
Lingala

Mokolo ya balingami: Lisolo ya bolingo…mpe boninga!

Mokolo ya balingami ezali feti ya ntina mingi oyo esalemaka na mokili mobimba le 14 février. Kasi bonkɔkɔ yango euti wapi?

Lisolo ya mokolo ya balingami ebandi kala, na tango ya Baloma, eleki mibu koleka 2000. Na ntango wana ezalaki na mokonzi moko ya Loma na nkombo Claude II. Azalaki kondima ete basoda basengeli kotya makanisi na bango nyonso na bitumba mpe kobala te. Kasi nganga-nzambe moko ya mpiko na nkombo Valentine azwaki ekateli ya koboya kotosa amperɛrɛ mpe kobala basoda yango na kobombana. Bakangaki Valentin mpe batyaki ye na bolɔkɔ, kasi ata na bolɔkɔ azalaki kosepela na bolingo mpe boninga na ndenge azalaki kosalisa bato. Balobaka kutu que abikisaki mwana mwasi ya mobateli ya boloko oyo akufá miso mpe akomeli ye mokanda ya boninga oyo ekomamaki na signature « Valentine na yo » avant baboma ye.

Lelo oyo, mokolo ya balingami ezali mokolo oyo tozali kolakisa bolingo mpe boninga na biso epai ya bato oyo bazali na ntina mpo na biso. Totindaka ba cartes, ba fleurs na ba chocolats na balingami na biso pona kolakisa bango ndenge tolingaka bango. Kasi mokolo ya balingami ezali kaka mpo na babalani oyo bazali na bolingo te, ezali mpe mpo na kosepela na boninga! Ezali mokolo oyo toyebisaka baninga na biso ndenge bazali na ntina mpo na biso.

Na yango, ezala bozali balingami, baninga to ata libota, mokolo ya balingami ezali libaku moko ya ntina mingi mpo na kolakisa baye bazali zingazinga na bino boniboni bolingaka bango mpe boniboni bazali na ntina mpo na bino. Mpe kobosana te, lokola Nganga-nzambe Valentine, ata misala mike ya bolingo mpe boninga ekoki kosala mokili esika ya malamu koleka.

Related posts

Lindt & Sprüngli bafundamaki mpo na kosalela mosala ya bana mike

anakids

Libenga ya nokinoki uta na Namibie mpo na kobatela ba océans

anakids

Mali, Champion du Monde ya Coton !

anakids

Leave a Comment