juillet 8, 2024
Lingala

Molunge makasi na Sahel: esalemaka ndenge nini?

Bolukiluki moko euti kosalema kala mingi te elobi ete molunge makasi oyo ebɛtaki Sahel na ebandeli ya sanza ya minei eutaki na molunge ya mokili oyo bato babimisaki. Yango ebimisaki molunge makasi mpenza mpe mikakatano minene na mikili lokola Mali mpe Burkina Faso.

Ekipi moko ya bato ya siansi bamoni ete molunge makasi oyo ebɛtaki Sahel na sanza ya minei eutaki na molunge ya mokili. Na boumeli ya mikolo mitano, kobanda mokolo ya 1 tii 5 avril, molunge ezalaki makasi na Mali mpe na Burkina Faso. Température ezalaki makasi, koleka 45°C, na boye ete bato mingi babɛlaki to kutu bakufaki.

Bato ya siansi balobi ete likambo yango esalemaki mpo na makambo oyo bato bazali kosala na planɛti yango. Basalelaka biloko oyo ebimisaka bagaze oyo ekómisaka mopɛpɛ mɔtɔ. Ata soki bato ya Sahel bameseni na molunge, mbala oyo ezalaki ndenge mosusu. Courant ezalaki kokata, yango wana ba ventilateurs na ba climatiseurs ezalaki kosala te. Mpe balopitalo etondaki mpo bato mingi bazalaki kobɛla mpo na molunge.

Eyebani mpenza te soki bato boni bakufaki na molunge yango, kasi mbala mosusu ezalaki mingi. Yango emonisi ete tosengeli kobatela planɛti na biso mpo likambo yango esalema lisusu te.

Related posts

Burkina Faso : Vaccin ya sika contre malaria!

anakids

Mikanda ya motuya mpo na kobatela bokundoli ya Léopold Sédar Senghor

anakids

MASA ya Abidjan : Festival monene ya arts

anakids

Leave a Comment