juillet 3, 2024
Lingala

Nigeria ezali kobundisa bamaladi

@Global fund

Fonds mondial epesaka mbongo mingi na Nigeria mpo na kosunga yango na kobundisa bokono lokola VIH, tuberculose mpe malaria.

Mosolo mingi, 933 millions ya ba dollars, epesami na Nigeria na Fonds mondial mpo na kosunga yango na kobundisa bokono ya likama. Ekowumela mibu misato, kobanda 2024 kino 2026. Na mbongo oyo, ndambo ezali mpo na kobundisa VIH, eteni mosusu ezali mpo na kosalisa na boyokani ya eyano na VIH.

NACA, oyo etali sida na Nigeria, esakoli yango. Bakobanda kosalela mbongo wana na kosala makita mpo na kolobela makambo oyo bakoki kosala mpo na kosalisa bato bátikala na nzoto kolɔngɔnɔ.

Dr. Temitope Ilori, oyo azali mokambi ya NACA, alobi Nigeria esi esalaki makambo malamu na mbongo oyo ezwaki liboso. Na ndakisa, bapesaki minganga formasyo, bapesaki bisaleli na ba laboratoires mpe basalaki elongo na bato na ba communautés mpo na kosalisa bango basosola malamu bokono.

Related posts

Festival ya Jazz africain : Festival ya miziki mpo na bato banso!

anakids

1 Mai : Mokolo ya makoki ya mosala mpe ya basali

anakids

Parade ya bakamela na Paris?

anakids

Leave a Comment