ANA KIDS
Lingala

Racisme: Etumba ezali kokoba!

@European commission

Mbula na mbula le 21 mars, mokili mobimba esala mobulu mpo na koloba te na racisme. Ba manifestations, ba discours na ba actions ezo rappeler importance ya mokolo oyo…

Mbula na mbula na mokolo ya 21 Mársi, mokili mobimba ekumisaka mokolo ya mokili mobimba mpo na kosilisa bokeseni ya mposo. Kasi mpo na nini dati oyo? Na 1960, na Afrika ya Sudi, bapolisi babɛtaki masasi na bato oyo bazalaki kosala mobulu na kimya mpo na kosɛnga ete bato bákokani. Bato 69 babungisaki bomoi na bango. Banda wana, mokolo oyo ezali kokundola ntina ya kobundisa bokeseni ya mposo bisika nyonso.

Na mbula oyo, manifestation esalemaki na Paris mpe na bingumba mingi na mokili mobimba. Bankóto ya bato bayanganaki mpo na koloba ete: “Botika koponapona mposo!” »

Mokambi ya ONU, António Guterres, alobi ete bokeseni ya mposo « ebebisaka bomoi ya bato mpe ebebisaka bosembo. » Asengi na bikolo binso kosala mpo na mokili ya bosembo.

Racisme ezali na esika te na bomoi na biso. Moto nyonso akoki kosalisa na komemya basusu mpe koboya koyina. Ensemble, totonga mokili oyo mutu nionso akokani !

Related posts

Congo, projet moko esalisaka bana ya mabanga ya ntalo bazonga na kelasi

anakids

Maria Mbereshu: Artiste moko ya kokamwa ya Namibie

anakids

Burkina Faso : biteyelo bifungwami lisusu!

anakids

Leave a Comment