ANA KIDS
Lingala

Parade ya bakamela na Paris?

Na mokolo ya 20 Aprili na Paris, likambo moko ya kokamwa esalemaki: defile elongo na bakamela! Ezalaki mpo na kosepela mbula moko ya ntina mingi mpo na banyama wana ya kokamwa na mokili mobimba.

Kanisa kotambola na balabala ya Paris mpe kokutana na… bakamela! Bato babongisaki defile yango mpo na kolakisa ndenge oyo bakamela ezali na ntina mingi. Bafandaka na bisika ya molunge makasi mpe bakoki komema biloko ya kilo mingi.

Oyebi que ONU eloba que 2024 eza année ya ba kamela? Mpo na kosepela, defile monene ya banyama yango esalemaki na Paris.

Ezalaki likanisi ya Christian Schoettl, Mayor ya Janvry. Alingaka mpenza bakamela mpe abongisaka deja ba événements mpo na bango na ville na ye. Mbula oyo alingaki kosala eloko moko ya ntina mingi mpo na bakamela na mokili mobimba.

Na parade, ezalaki na bakamela, ba dromédaries, ba llamas na ba alpacas. Bato ya mikili mingi lokola Tunisie, Inde mpe ata Australie basanganaki. Mboka moko na moko ezali na kamela to llama na yango mpo na komonisa ekipi na yango. Ezalaki mpenza mokolo ya esengo mpo na moto nyonso! 🐫

Related posts

Conférence ya eLearning Africa ekoya na Kigali!

anakids

Île de Ré: Ba tortues 65 ya mbu ezongi na mbu

anakids

Projet LIBRE na Guinée: Kotika mobulu na basi mpe bana basi

anakids

Leave a Comment