Lingala
A la Une
Bohlale Mphahlele, 16 Ans et Déjà Inventeur
** Ezali boni soki boucle ya matoyi ya pete ekoki kosalisa moto oyo azali na likama? Yango nde likanisi oyo Bohlale Mphahlele, mwana mwasi moko ya mbula 16 ya Afrika ya Sudi, akanisaki.

Bohlale Mphahlele asalaki boucle d’oreille oyo ekeseni na mosusu. Ezali na mwa aparɛyi ya fɔtɔ mpe na système oyo epesaka nzela ya kolandela esika oyo moto oyo alati yango azali.
Soki likama ebimi, bouton moko oyo ebombami ekangaka fɔtɔ́ ya moto oyo azali kobundisa ye mpe etindaka esika oyo moto oyo abɛti ye azali epai ya bato oyo batyelaka motema to epai ya bato oyo bazwaka lisalisi ya nokinoki.
Invention na ye epesaki ye prix na concours moko ya science na Afrique du Sud.
Na likanisi oyo, Bohlale azali kolakisa ete tekiniki ekoki mpe kosalelama mpo na kosunga mpe kobatela bato na bomoi na bango ya mokolo na mokolo.
