Lingala
A la Une

“Vibra-Signe,” mabina oyo ebongisami mpo na bato oyo bakufá matoi

Na Bobo-Dioulasso, bato oyo babinaka matoi mpe oyo bayokaka malamu te bazali kosalela mayele oyo babengaka Vibra-Signe.

Likanisi oyo esalemaki na chorégraphe Yaya Sanou, fondateur ya compagnie ya mabina Fientan na 2018.

Na yango, ndenge nini esalaka? Bato oyo babinaka basalelaka miso, mabɔkɔ mpe nzoto na bango mpo na koyekola koningana. Elobeli ya bajɛstɛ esalisaka bango mpe bálanda chorégraphie.

Na miziki? Ba drums na ba djembes esalaka que mabele na mopepe eningana. Babini bakoki koyoka koningana wana na nzoto na bango mpe kosalela yango mpo na kolanda rythme.

Na Vibra-Signe, ba danseurs ya Fientan ba prouver eloko moko : kobina, okoki koyoka na miso, na maboko… mpe ata na nzoto mobimba!

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *

Bouton retour en haut de la page