Na Maroc, bato ya arkeoloji bamoni efelo moko oyo eumeli mbula 4 000!
Na Maroc, balukiluki bamoni likambo moko ya kokamwa: efelo moko monene oyo etongamaki eleki bankóto ya bambula!

Kanisa kotimola na mabele mpe kozwa… efelo monene mpe libulu monene! Yango nde esalemaki na Oued Beht, na nɔrdi-wɛsti ya Maroc.
Bato ya arkeoloji bakanisaka ete etonga yango ebandaki pene na mbula 3 500 tii 4 000, tii na eleko ya Bronze.
Kasi banani bazalaki kofanda kuna? Balukiluki bamonaki bilembo ya lisangá moko monene. Bato yango bazalaki kolona blé mpe orge, kobɔkɔla banyama, mpe kosala bisaleli mpe bambɛki.
Efelo monene emonisi ete bato yango bayebaki mpe kotonga mpe kosala elongo.
Bokutani yango epesi nzela na bato ya arkeoloji báyeba makambo mingi na ntina na bomoi ya bato oyo bafandaki na Maroc eleki bankóto ya bambula.
Mpe likambo oyo ekamwisaka mingi? Ba structures wana esi e identifier na ba années 1930, mais âge na rôle na yango etikalaki mystère!
