Ebola: AI Kamba Enquête na RDC!
Ezali boni soki ordinatɛrɛ moko ekokaki kosalisa bituluku ya bato oyo basalisaka bato na maladi báyeba nokinoki bilembo ya maladi moko? Na République démocratique du Congo, intelligence artificielle ekomi esaleli ya sika na bitumba na Ebola.

Kanisa bolukiluki monene epai wapi indice nyonso ezali na ntina! Mpo na kobundisa Ebola, ba équipes ya santé esengeli kosangisa ba informations ebele: Nini ezali koleka na bisika oyo ezwamaki? Mituya ezali kobongwana? Ezali na makama ya sika?
Intelligence artificielle (AI) ekoki kosalisa bango básosola malamu. Na RDC, mosungi moko na nkombo Claude atalaka ba données mpe abongisaka ba rapports noki mingi. Engebene mokeli na yango, Anthropic, mosala oyo ezalaki kozwa mokolo moko, sikawa ekoki kosila na ngonga moko te!
Organisation mondiale de la santé esakoli mpe botiami na RDC ya plateforme moko na kombo ya PDX, oyo esalelaka AI mpo na kosangisa ba sango na ntina ya bokolongono mpe makama.
Kasi kebá: AI ezali monganga te mpe asalisaka moto te. Ezali esaleli oyo esalisaka ba équipes ba comprendre malamu situation mpe basala noki. Na epidemie, koyeba malamu bilembo ekoki kosala mpenza bokeseni!
