Lingala

Histoire… Yebisa biso! Zimbabwe monene, engumba oyo ezali na bifelo minene

Kanisa engumba oyo ezali na bifelo minene… etongami kozanga ciment! Mpe te, ezali esika ya bafilme te!

Boyei malamu na Grand Zimbabwe, na sudi ya Afrika, na mboka oyo babengaka lelo Zimbabwe.

Pene na mbula nkóto eleki, bato ya Shona babandaki kotonga engumba yango ya kokamwa. Na boumeli ya bikeke mingi, bafandi na yango batongaki bifelo ya mabanga, bandako mpe bisika minene oyo ezingamaki na bifelo.

Na ekeke ya 14, engumba yango ekómaki esika moko ya ntina mingi. Misala ya bilanga, kosala bibende mpe mombongo ekómaki mingi.

Mpe talá elembo moko ya kokamwa: bato ya arkeoloji bamoni biliki ya vitre mpe biteni ya porcelaine oyo euti na Chine mpe na Perse! Yango emonisi ete bafandi bazalaki na boyokani na ba réseaux ya mombongo oyo ekómaki mosika.

Kasi na nsima, mpo na nini engumba monene wana esundolamaki mokemoke pene na ekeke ya 15? Mbongwana ya ezingelo mpe mikakatano ya koleisa bato mingi esali mbala mosusu.

Lelo oyo, bifelo na yango etɛlɛmi naino mpo na koyebisa biso lisolo oyo.

Okanisi ndenge nini efelo monene boye etongamaki kozanga simá?

Histoire ya Afrique etondi na ba surprises!

https://youtu.be/DYq10-d_FL0 Ezali na ntina mingi

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *

Bouton retour en haut de la page