Tété-Michel, mobembo oyo alotaki kozwa zɛlo ya Groenland!
Ndenge nini elenge mobali moko ya Togo, oyo amesanaki na molunge ya Afrika, asukaki na katikati ya zɛlo ya Groenland? Merci na livre moko na posa incroyable ya ko découvrir mokili!

Ntango Tété-Michel Kpomassie amonaki buku moko oyo elobelaki Groenland, akangaki ye! Etúká monene wana ya Extrême Nord, na bangomba na yango ya zɛlo mpe bisika oyo ezipami na mbula-mpɛmbɛ, ekómaki ndɔtɔ na ye.
Abotamaki na Togo, epai klima ekeseni mpenza na oyo ya Groenland. Kasi eloko moko te ekokaki kopekisa ye! Abandaki mobembo molai mpenza oyo ekoumelaka mbula mwambe.
Na 1965, ntango azalaki na mbula 24, nsukansuka akómaki na Groenland. Amonaki bisika oyo ezali na zɛlo mpe akutanaki na bato ya Inuit, bato oyo bafandaka na etúká yango ya Arctique. Ayekolaki lolenge na bango ya bomoi mpe bonkoko na bango.
Na sima, alobelaki aventure wana na buku moko oyo eyebani lelo: « The African of Groenland, » ebimaki na 1981.
Oyebaki? Tété-Michel a découvrir destination extraordinaire oyo grâce na livre moko. Tango mosusu, kotanga ekoki kofula yo mpo na kokende mpe kotala mokili!
