Banyama mibale ya mikemike ebimi lisusu nsima ya mbula 6 000!
Ezali boni soki nyama moko oyo bakanisaki ete esilá kokufa banda bankóto ya bambula ezalaki naino na bomoi? Oyo ezali bokutani ya kokamwa oyo esalemi na bazamba ya mbula ya Nouvelle-Guinée, na Indonésie!

Bato ya siansi bandimisi ete ezali na banyama mibale ya mikemike oyo babengi marsupial oyo eyebanaki liboso kaka na biloko oyo etikalá na mabelé: possum pygmée ya misapi milai mpe planeur oyo ezali na mokila ya lopɛtɛ.
Ya liboso ekamwisaka mpenza: ezali na mosapi moko ya lokolo molai mbala mibale koleka oyo mosusu! Esalelaka yango mpo na kokanga ba larves ya mikemike oyo ebombami na kati ya nzete.
Kasi ndenge nini balukiluki bamonaki yango? Grâce na ba photos, ba fossiles, espèce moko ya kala oyo ebatelami na musée, mpe surtout, boyebi ya ba communautés ya mboka.
Banyama yango ezali mpenza babiki! Kasi zamba na bango ezali na likama mpo na kokata bazamba. Yango wana, kobatela bango ezali na ntina mingi.
Oyebaki? Bato ya siansi babengaka mitindo yango « Lazarus taxa », mpo na kolobela banyama oyo bakanisaki ete esili mpe oyo ezwami na bomoi!
