Na Zambie, bana balingi bakambi na bango bayoka!
“Tozali bana ya Zambie, mpe mingongo na biso ezali na ntina!” Na Lusaka, bana ya bitúká nyonso zomi ya ekólo yango bakutanaki na bakonzi mpo na kolobela ntomo na bango, bamposa na bango mpe avenire na bango. Nsango moko ya ntina kaka mikolo liboso ya mokolo ya bana ya mokili mobimba.

Na kelasi, na ndako, to na kartye na bango, bana bazali na makambo mingi ya koloba. Nzokande, makanisi na bango eyokamaka ntango nyonso te soki etali bikateli oyo etali bomoi na bango.
Ezali boni soki mikóló bazalaki koyoka bana mingi?
Na Zambie, bana bazwaki ekateli ya koyokisa mingongo na bango mbala moko na bakambi na bango. Na bokutani bobongisamaki na Lusaka, balakisaki masengi na bango na ba représentants ya gouvernement mpe na ba organisations ebele.
Makambo na bango ya liboso ezali pete mpe ya ntina: kobatelama malamu, kozwa kelasi na ezalela ya malamu, kozwa lisalisi ya bokolongono, mpe kosangana na mikano oyo etali avenire na bango.
Chipo ya mibu zomi na misato amemi nsango na bango
Kati na bilenge baye bazalaki wana, Chipo, elenge ya mibu 13, moyekoli na eteyelo ya ntei ya Saint-Jean na etuka ya Ouest, alobaki na nkombo ya bana ya mboka.
Nsango na ye ezalaki na nguya: « Tozali bana ya Zambie, mpe mingongo na biso ezali na ntina. Tolingi kokola na mboka oyo mwana nyonso azali na bokengi, abatelami, na nzoto kolɔngɔnɔ, mpe akoki kokende kelasi mpo na kokokisa bandoto na bango. »
Asengaki mpe na bakambi koyoka bango mpe kobongola bilaka na bango na misala ya solo.
Bana pe baza na mongongo!
Likita oyo, oyo ebongisami lokola eteni ya mabongisi mpo na mokolo ya mokili mobimba ya bana, ezali lokola bokundoli ya likambo moko ya ntina: bana bazali na makoki mpe basengeli kozala na makoki ya kobimisa makanisi na bango.
Le 20 novembre, mokolo oyo ekosalema na mokili mobimba. Ezali libaku ya komikundola ete mwana nyonso abongi kobatelama, koyokama, mpe kozala na makoki ya kokokisa bandoto na ye.
Mpamba te kozala na mbula 13, 10, to ata 8 elingi koloba te ete makanisi na yo ezali na ntina mingi te!
Mpe yo, soki okokaki kosolola na bakambi ya mboka na yo, bosenga na yo ya liboso ekozala nini?
