juillet 8, 2024
Lingala

Abigail Ifoma alongi Margaret Junior Awards 2024 mpo na projet na ye ya sika MIA!

Eleki mwa mikolo, na mokolo ya basi ya numérique na Paris, Abigail Ifoma, ya mibu 16, alongaki mbano ya Margaret Junior Awards 2024 na catégorie ya Afrika. Découvrez projet na ye incroyable MIA (My Intelligent Assistant) oyo ekomisaka kisi pete.

Na 2020, ba Margaret Junior Awards esalemaki mpo na kolakisa mayele ya bilenge basi ya mibu 7 kino 18. Ba prix oyo ekumisaka esprit na bango ya inventive mpe makoki na bango ya ko changer mokili na nzela ya ba idées na bango. Na mbula oyo, kati na bilombe basi ya Margaret Junior Awards 2024, ezali na Abigail Ifoma, mwana mwasi moko ya mbula 16 oyo autaki na Cameroun.

Abigail alingaka siansi mpe matematiki, mpe azali na likanisi moko ya kokamwa oyo babengi MIA (Mosungi na ngai ya mayele). MIA ezali application spéciale oyo esalisaka minganga ba soigner ba malades, surtout soki bazali mosika na ba lopitalo.

Na kosaleláká MIA, minganga bakoki komeka molunge ya bato ya maladi, tansiɔ mpe ata rythme cardiaque, ata soki bazali na lopitalo te. Ezali lokola ozali na mwa monganga na poche na yo!

Projet ya Abigail ezali très spécial mpo esalelaka technologie moko très avancée oyo babengi Internet des choses. Yango elingi koloba ete baaparɛyi ekoki kosolola bango na bango mpe kosalisa bato bázala na nzoto kolɔngɔnɔ.

Margaret Junior Awards 2024 ezali kolakisa biso ete bana basi bakoki kosala makambo ya kokamwa, mpe bazali bakambi ya lobi. Félicitations na Abigail na ba héroïnes misusu nionso pona ba idées fantastiques na bango!

Related posts

Likanisi moko ya malamu mpo na kosala mangwele na Afrika!

anakids

Ezipito ya kala : Tóyeba mosala ya kokamwa oyo bana ya kelasi basalaki eleki sikoyo mbula 2000

anakids

Mokolo ya balingami: Lisolo ya bolingo…mpe boninga!

anakids

Leave a Comment