juillet 3, 2024
Lingala

Ba Breakdance na ba Jeux olympiques ya Paris 2024

Breakdance ekongenga na ba jeux olympiques ya Paris na 2024, ekosangana na ba sports misusu ya malili lokola surf, skateboarding mpe climbing. Babini oyo bautá na Nigeria, epai bato mingi balingaka breakdance, bakomonisa ekólo na bango na momekano yango ya sipesiale.

Ambassade ya France mpe Fondation ya Fame na Nigeria babongisi championnat national mpo na kopona ba danseuses oyo bako lakisa ba mouvements na bango ya kokamwa na tango ya ba jeux olympiques na été ekoya na Paris. Na mbula eleki, ba qualifications esalemaki na bingumba ndenge na ndenge ya Nigeria, mpe baponaki ba danseuses ntuku mibale oyo bazalaki na mayele mingi.

Ba danseuses oyo nionso baza super fier ya style na bango ya Nigeria. Tango babinaka, ba memaka na lolendo nionso groove, rythme na culture na bango. J. C. Jedor, vedette ya breakdance ya mboka, alimboli ete lolenge ya kobina ya Nigeria etongami mingi na rythme koleka technique.

“Ndoto moko ekokisami”

Breakdance, oyo ezali mabina ya malili oyo ebandaki na culture pop mpe e populariser na Roi ya Pop, Michael Jackson, ebimaki na Nigeria na fin ya ba années 90. Ba Nigerians misusu kutu balobaka que breakdance ezali na des roots ya kala mingi, kozonga na ba années 1950 na Ba danseuses ya bonkoko ya Nigeria.

Lelo oyo, bilenge mingi ya Nigeria bazali kobendama na breakdance. Funsho Olokesusi, oyo azali kotambwisa kompanyi moko ya mabina na Kaduna, alimboli ete mpo na babini ya Nigeria, kosangana na masano ya Olympique ezali lokola komona “ndɔtɔ ekokisami”. Ezali fête ya mabina ya munene oyo basepelaka ko participer na yango !

Related posts

Ba robots na espace

anakids

Kafe : masanga oyo elamusaka lisolo mpe nzoto

anakids

Davos 2024 : bokutani ya ba grands ya mokili oyo… na bana

anakids

Leave a Comment