juillet 3, 2024
Lingala

Belgique : Ba carburants toxiques etindami lisusu na Afrika te

Belgique epekisi kotinda ba carburants toxiques na Afrique de l’Ouest, na yango ebatelaka santé mpe environnement. Mokano ya ntina mpo na bikolo lokola Ghana, Nigeria mpe Cameroun.

Belgique ezwi mokano ya ntina mpo na kobatela planète na biso : epekisi exportation ya ba carburants oyo ezali na ba substances toxiques lokola soufre na benzène. Ba carburants wana ebebisaka mingi mpe ezali likama mpo na santé.

Liboso ya epekiseli yango, mbala mingi bazalaki kotinda esansi yango na mikili ya Afrika ya Wɛsti, na ndakisa Ghana, Nigeria mpe Cameroun. Ba izini na Belgique ezalaki kosala ba carburants wana oyo ebebisaka mpe na nsima bazalaki kotɛka yango na mikili yango. Kasi sikoyo Belgique elobi « te » na momesano oyo.

Likambo ya mawa, mikili misusu lokola Etats-Unis mpe Pays-Bas ezali kokoba koteka ba carburants toxiques wana na Afrika. Basalaka boye mpo mibeko na bango ezali makasi mingi te mpe mpo ete bosenga ya énergie ezali monene na mikili wana ya Afrika. Na epekiseli oyo, Belgique ezali na elikya ya kopesa ndakisa mpe kolendisa mikili misusu mpo na kosala mpe bongo. Na kotika kotinda ba carburants wana ya kobebisa, tozali kosalisa kobatela mopepe oyo topemaka mpe kosala ete mokili na biso ezala peto mpe na nzoto kolɔngɔnɔ mpo na moto nyonso.

Related posts

Ko découvrir berceau ya bomoto

anakids

Découvrez le VRAI Afrique avec Zikora Media et Arts

anakids

1 Mai : Mokolo ya makoki ya mosala mpe ya basali

anakids

Leave a Comment