juillet 3, 2024
Lingala

Benga lisungi pona kobikisa bana na Soudan

@Unicef

Likebisi moko ya makasi euti na UNICEF: bankama ya bankóto ya bana na Soudan bazali na likama ya kobɛla mpo na nzala. Bitumba ekómisaka makambo mpasi koleka. Kasi tokoki kosalisa bango!

UNICEF euti kobeta alarme : na Soudan, bana mingi bakoki komela makasi mpo na nzala. Ezali mpo na bitumba. Kasi elongo tokoki kosala likambo moko!

Kanisá naino: Pene na bana 700 000 na Soudan bakoki kobɛla mpo na nzala na mbula oyo. Ezali mpenza mawa. Mpe ekoki kozala likama mingi mpo na bango.

Na bisika oyo bitumba ezali koleka, ezali lisusu mabe koleka. Bana bakoki ntango nyonso te kozala na bilei oyo ekoki. UNICEF, oyo esalisaka bana na mokili mobimba, elingi kopekisa likambo yango ekóma lisusu makasi te.

Mpo na kosalisa, UNICEF epesaka bankisi ya sipesiale mpo na kosalisa bana bámiyoka malamu. Balandaka pe esika bana bakendaka, pona kobatela bango. Kasi mpo na kosala nyonso wana, bazali na mposa ya lisalisi.

UNICEF ezali kosenga na moto nyonso oyo akoki kosunga. Bazali na mposa ya mbongo mingi, 840 millions ya ba dollars, mpo na kosunga bana 7,5 millions na mbula oyo. Ezali mingi, kasi soki moto nyonso apesi mwa moke, ekoki kosala bokeseni monene.

Na yango, soki olingi kosunga bana na Soudan, solola na baninga na yo, na libota na yo. Elongo, tokoki kosala makambo minene!

Related posts

Musée oyo eleki kala na Tunis, Musée ya Carthage, ezali kobongisama lisusu

anakids

Kenya : mosala ya kobikisa ba rhinocéros

anakids

Ko découvrir berceau ya bomoto

anakids

Leave a Comment