juillet 8, 2024
Lingala

Burkina Faso : biteyelo bifungwami lisusu!

Engebene na UNICEF Burkina, ba données oyo euti kosalema kala mingi te emonisi bokiti ya bokangami ya biteyelo na ekolo mobimba, epesi elikya mpo na kelasi ya bana na Burkina Faso.

Mituya ya sika oyo etali kelasi na Burkina Faso ezali kopesa elikya! Kolanda UNICEF Burkina, motango ya biteyelo biye bikangami mokiti na territoire national mobimba. Na suka ya sanza ya misato 2024, motango ya ba établissements oyo ekangamaki emati kino na 5.319, soki tokokanisi yango na 5.336 na suka ya sanza ya mibale 2024. Longola yango, motango ya bayekoli oyo bazwaki mpasi na bokangami wana ekita mpe, uta 823.340 kino 818.149 na eleko moko. Kasi ezali kaka yango te ! Biteyelo koleka 1.300 efungwami mpe pene na banakelasi 440.945 oyo balongolami na bisika na bango (ID) bayebani. Sango oyo ezali kolendisa bana ya Burkina Faso, lokola epesi likoki ya kozwa kelasi malamu mpo na bato banso.

Related posts

Russ Cook ya kopota mbangu ya kokamwa na Afrika mobimba

anakids

Retour ya etumbu ya liwa na Congo

anakids

Egypte : Initiative nationale mpo na kopesa makoki na bana

anakids

Leave a Comment