juillet 3, 2024
Lingala

Radio esali 100 ans!

@National film and sound archives

Atako tozali na Internet, bato koleka miliare 4 bazali kaka koyoka radio. Mbula oyo, mokolo ya radio mondial ekumisi mibu 100 na yango na motó ya likambo moko ya ntina mingi : « Radio : Ekeke ya sango, maseki mpe mateya ».

Mokambi ya UNESCO, Audrey Azoulay, alimboli ete radio ezali elongo na biso banda mbula koleka 100. Ateyaka biso makambo, asekisaka biso mpe asalisaka biso toyekola.

Radio ezali monene mpo elobaka na bisika oyo internet ekomaka te. Na bisika mosusu, pene na ndambo ya bato bazali na Internet te. Na yango, radio ezali mpenza na ntina, mingimingi soki mikakatano ezali.

Na ndakisa, na Afghanistan, bana basi mingi bakoki kokende kelasi te. Kasi radio moko oyo babengi Radio Begum eteyaka bana basi makambo ya ntina. Ezali radio oyo esalemi na basi, mpo na basi.

Radio pe epesaka mutu nionso mongongo. Ezali kopesa nzela na mimeseno ndenge na ndenge ete bámimonisa. Ezali kutu na ba radios spéciales mpo na ba communautés ndenge na ndenge na mokili mobimba.

Mpo na UNESCO, radio ezali kaka te nzela ya koloba. Ezali mpe lolenge ya koloba ete esengeli moto nyonso azala na nzela ya kozwa sango, kelasi mpe bokeseni ya mimeseno. Lelo, to fêter radio na magie ya ba mbonge na yango po mokili ezala esika ya malamu.

Related posts

Burkina Faso: rupture collective ya jeûne mpo na ko promouvoir kofanda esika moko

anakids

RDC : bana balongolami kelasi

anakids

Ba milliardaires mingi na Afrika

anakids

Leave a Comment