Éthiopie: Balonaki banzete milio 805 na mokolo moko!
Kanisá mokolo moko oyo bamilio ya bato baloni banzete na ekólo na bango mobimba. Yango nde esalemaki na Éthiopie…

Le 3 août, mboka esakolaki ete elonaki 805,3 millions ya milona na mokolo moko! Bato koleka milio 26,2 basanganaki na mosala monene wana.
Mpo na nini kolona banzete mingi boye? Mpo banzete ezali na ntina mingi. Basalisaka mpo na kobatela mabele, kobatela bisika oyo ezali na vert, mpe kobundisa makambo oyo mbongwana ya klima ezali kobimisa.
Campagne monene oyo babengaka yango Legacy Vert. Ebandaki na 2019. Banda ebandaki, Éthiopie elobi ete elonaki milona koleka miliare 50!
Na 2026, ekólo yango ebongisaki milona koleka miliare 8 mpo na eleko ya mbula, ntango oyo banzete ya mikemike ezalaka na libaku malamu ya kokola.
Kasi kebá: kolona nzete ezali kaka likambo ya liboso. Na nsima, esengeli kosopela yango mai, kobatela yango mpe kozwa ntango mpo ekola. Engebene Ministère ya Agriculture ya Éthiopie, koleka 80% ya milona mikoli na kati ya programme yango.
Mokolo oyo ezali komonisa ete mwa geste moko ekoki kokóma monene soki bamilio ya bato basali yango. Nzete moko lelo, zamba lobi!
