Défi ya fou ya Ben Dancer: Kobina pendant 7 jours!
Kanisá ete ozali kobina na boumeli ya pɔsɔ koleka moko! Oyo ezali défi incroyable oyo Ben Dancer asali na Lagos, Nigeria.

Benjamin Daniel Gabriel, oyo bapesaki ye nkombo ya lisɛki Ben Dancer, alingaka kobina. Na mbula 32, amityelaki mokakatano moko ya kokamwa: kobina ntango molai mpo na koluka kobuka rekord ya mokili mobimba!
Pene na ngonga 177, abinaki na Lagos, kobanda le 22 tii le 29 septembre. Na mobimba, yango ezali mikolo 7, ngonga 8, miniti 52, mpe segɔnde 59 ya kobina!
Mokano na ye ezalaki ya koleka rekord oyo ezalaki liboso: ngonga 127, oyo esalemaki na 2023 na mobini moko ya mbula 16 ya Inde, Srushti Sudhir Jagtap.
Ben Dancer azalaki kosala ngalasisi banda mbula minei mpo na kokokisa mokakatano yango. Azalaki mpe kozwa mwa bopemi mpo na kopema.
Kasi mokano na ye ezalaki kaka te ya kobuka rekord. Alingaki mpe kokotisa mabina ya Afrika na mokili mobimba.
Esengeli sikoyo ko vérifier record ya sika na Guinness World Records.
Mpe yo, okokaki kobina ntango boni?
