Lingala

Stéphane Kulimushi Mutanda: Basketball esangisaka bilenge

Refugié congolais oyo afandaka na Ouganda, Stéphane asala académie ya basketball mpo na kosunga bilenge bayekola, bazua confiance, mpe batonga avenir na bango.

Bale, kitunga, mpe ekipi: ntango mosusu, esɛngaka moke mpenza mpo na kokela makambo minene!

Stéphane Kulimushi Mutanda awuti na Congo démocratique mpe afandaka sikoyo na Ouganda. Lokola azalaki na mposa makasi ya lisano ya basketball, azwaki ekateli ya kosalela lisano oyo alingaka mingi mpo na kosalisa basusu.

Abandisaki Académie ya basketball ya ba réfugiés. Académie oyo eyambaka bilenge bakimi mpe bilenge mosusu oyo bazali kokutana na mikakatano. Na esika ya lisano, bayekolaka kosakana elongo, kotosa mibeko, kosala milende mpe kotika te.

Kasi académie ezali kaka mpo na masano te. Ezali mpe kopesa mentorat mpe lisungi ya mateya. Mokano ezali ya kosalisa elenge moko na moko azwa mayele na ye mpe kondima makoki na ye.

Mpo na Stéphane, basketball ekoki kosangisa bato oyo bautá na bisika ndenge na ndenge. Ekipi ezali mpo na koyekola kotyelana motema mpe kokende liboso elongo!

Na 2025, aponami lokola moko ya bilenge bakambi ya Nations Unies mpo na mikano ya bokoli ya seko.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *

Bouton retour en haut de la page