AI na ba robots ezali koya na ba écoles!

Lelo, le 28 septembre, programme moko oyo etali intelligence artificielle mpe robotique ebandi na Afrique du Sud. Balakisi bakoyekola ndenge ya kosalela ba technologies wana mpe bakobongisa ba clubs ya AI mpe ya robotique oyo esalemi na biteyelo. Programme oyo ekambami na Union internationale ya télécommunication (UIT), na lisungi ya Google.org mpe na boyokani na initiative Giga ya UNICEF.
Kasi mpo na nini koteya makambo etali barobo na biteyelo? Mpamba te robo ezali kaka masini oyo etambolaka te! Mpo na kotonga to kosala programɛ ya moko, osengeli koyekola kokanisa, kosilisa mikakatano, kosala code, mpe kosala lokola ekipi.
Mokano ezali mpe ya kopesa bilenge bisaleli mpo na kososola mayele ya kosala mpe, mbala mosusu mokolo mosusu, kobimisa mayele na bango moko ya tekiniki.
Na yo, soki école na yo efungoli club ya robotique lobi… robot nini okolinga kotonga?
