Lingala
A la Une
Balakisi bazali na mokolo na bango!
Le 5 octobre ezali mokolo ya balakisi ya mokili mobimba! Kasi mpo na nini kopesa mokolo mobimba epai na bango?

Banda 1994, mokolo yango ekumisaka balakisi na mokili mobimba. Pamba te koyekola kotanga, kokoma, kotanga, mpe kososola mokili… mbala mingi ebandaka na molakisi!
Na 2026, mokolo oyo ezali lisusu ya ntina mingi : ezali kokanisa mibu 60 ya mokanda ya UNESCO mpe ya Organisation internationale du travail oyo epesameli balakisi.
Mpe biteyelo mpe ezali kobongwana! Ordinatɛrɛ, internet, mayele ya sika, mpe mayele ya kosala ezali sikawa eteni ya bomoi ya banakelasi mpe balakisi mingi.
Bongo, eteyelo ya lobi ekozala ndenge nini? Likambo moko ezali ya solo: balakisi bakosala ntango nyonso mokumba monene mpo na kosalisa bana báyekola, bákanga ntina mpe bákola.
