Betelhem Dessie, elenge mwasi oyo ateyaka bana code
Lokola azali na mposa makasi ya ordinatɛrɛ banda bomwana, Betelhem Dessie azali kosalisa bilenge ya Éthiopie báyeba programɛ, robotique, mpe mayele ya kosala.

Ordinatɛrɛ esalelamaka mpo na nini? Ndenge nini okoki kotonga robo? Mpe ndenge nini opesaka malako na masini? Betelhem Dessie alingaka mingi koyanola na mituna oyo!
Entrepreneur Éthiopie oyo azalaki ko se interesser na technologie banda bomwana. Abandaki kosala baprogramɛ na mbula ya bolenge mpenza mpe nokinoki alingaki kokabola makambo oyo azalaki koyekola na bato mosusu.
Na iCog Anyone Can Code, initiative oyo ebandaki na 2016 mpe oyo ekomaki entreprise na 2020, asalisaka ko former bana mpe bilenge na ba outils numériques. Programme yango ezali na koyekola kosala code, ko découvrir robotique, mpe ko comprendre ba bases ya intelligence artificielle.
Mokano na ye? Kopesa bilenge makoki ya kozala kaka basaleli ya tekiniki te, kasi mpe bato oyo bazali na makoki ya kokela mayele na bango moko mpe koluka ba solutions na mikakatano ya mokolo na mokolo.
Po technologie numérique eza kaka pona ba grands to ba experts te. Soki bana bazali na mposa ya koyeba makambo, bameseni na yango, mpe bazali na makanisi malamu, bakoki mpe kokóma bato oyo babimisaka biloko!
Oyebaki? Betelhem abandaki kosepela na baordinatɛrɛ pene na mbula 7 mpe abandaki kosala code ntango azalaki na mbula 10.
