Blessing Gamba Dalouba: Na 15 ans, aza reine ya science!
Alingaka koyekola, kozwa, mpe kososola lolenge nini mokili esalaka. Na mibu 15 mpamba, Blessing Gamba Dalouba, elenge mwasi ya Togo, asi alongi momekano monene ya siansi mpe akendaki na Chine mpo na kozwa mayele ya lobi. Aventure moko ya kokamwa mpenza!
Na Togo, Blessing asalaka makasi na kelasi. Mwana-kelasi na mbula na ye ya liboso ya eteyelo ya ntei (kelasi ya 11), azali na mposa makasi ya siansi. Na sanza ya mibale oyo eleki, milende na ye efutaki: alongaki momekano ya Mokonzi-mwasi ya Siansi mpe Teknolozi na mwayene malamu mpenza ya 17,35 likoló na 20!
Grâce na victoire oyo, azuaki bourse ya 5 millions ya francs CFA mpo na ko continuer ba études na ye.
Kasi Blessing alingi kosuka wana te. Azali na ndɔtɔ ya kokóma ingénieur ya cybersécurité. Mokano na ye: kosalisa na kobatela baordinatɛrɛ, batelefone mpe bansango mpo na ba pirates.
Aventure moko ya kokamwa na Chine!
Na sanza ya Sɛtɛmbɛ oyo eleki, ekuke ya sika efungwamaki mpo na ye. Blessing asalaki mobembo na Shenzhen, Chine, elongo na bilenge basi misato mosusu oyo bautaki na Togo.
Na boumeli ya mikolo zomi, bamonaki biloko ya kokamwa oyo babimisaki: barobo, ba drones, mituka oyo ekoki kotambwisa yango moko, mpe mayele ya kosala.
Ezalaki mpenza likambo oyo efungolaki miso, etondaki na makanisi!
Na mbula 15, Blessing alakisi biso ete mposa ya koyeba makambo mpe mosala makasi ekoki komema yo mosika mpenza. Lisolo na ye ezali mpe kotinda bana basi nyonso bándima makoki na bango mpe bázala na mpiko ya kosala misala ya siansi.
Oyebaki? Cybersécurité ezali lokola nguba numérique: esalisaka kobatela ba appareils mpe ba données na biso na internet!
Pe yo, soki okokaki ko inventer eloko moko pona mokili ya lobi, ekozala nini?
