ANA KIDS
Lingala

COP29: Afrika ebengi pona kobikisa planète

Bikolo ya Afrika bizali kosenga lisalisi mpo na kobundisa bomati ya molunge ya mokili.

COP29, likita monene epayi wapi bikolo ya mokili mobimba bikutanaka mpo na kolobela avenir ya planète, esukaki mposo moleki na Baku na Azerbaïdjan, mboka moko na Europe orientale. Mokano na bango? Luka ba solutions pona kobatela Mabele pe kopekisa yango e chauffer lisusu mingi. Réchauffement climatique ezali tango planète ekomi molunge mpe molunge mpo na ba gaz oyo ebimaka na mituka, ba usines mpe ba avions. Yango esalaka makama lokola kokauka, mpela mpe mipepe makasi.

Na ntango ya likita liye, bikolo ya Afrika bilobaki ete bilaka bipesamaki na bikolo ya bozwi mpo na kosunga na kobundisa bomati oyo ya molunge ezali monene te. Na ndakisa, bapesaki likanisi ya kopesa dolare miliare 250 mbula na mbula mpo na kosalisa mikili mpo na kobundisa mbongwana ya klima. Kasi, bikolo ya Afrika bakanisaka ete yango ekoki te, mpo bazali na mposa ya mbongo mingi mpo na kosilisa mikakatano lokola kokauka mpe nzala.

Bikolo ya Afrika ezali mpe kosenga mayele ya tekiniki mpo na kobatela mabele na bango malamu mpe kosalela nguya ya peto, lokola nguya ya moi to ya mopepe. Soki mikili ya bozwi esali milende mingi te, COP29 ekoki kopesa te ba solutions oyo mokili ezali kozela.

Related posts

AI: Afrika ezali na maloba na yango!

anakids

Alerte: Bana milio 251 bazali naino na kelasi te!

anakids

Triennale ya Kigali 2024 : Festival ya art mpo na bato banso

anakids

Leave a Comment