Lingala
A la Une
Guinée: Basi bazali na mokano ya kolona banzete milio 2,5
Kanisá naino ekólo moko epai bamilio ya banzete ya mikemike ekolaka mokemoke mpe ekómaka bazamba minene. Yango nde likanisi ya campagne "Mwasi moko, nzete moko", ebandisami na Réseau ya bakambi ya basi ya Guinée mpe Réseau ya ba ministres mpe ba parlementaires ya basi ya Guinée.

Mokano na bango ezali monene: kolona banzete milio 2,5 na boumeli ya mbula mitano, to soki banzete 500 000 mbula na mbula.
Kasi mpo na nini kolona banzete mingi boye? Banzete ezali na ntina mingi mpo na biloko oyo ezalisamá. Basalisaka mpo na kobatela mabele, epesaka ebele ya banyama esika ya kobombama, mpe esalisaka mpo na kobatela ba écosystèmes ya malamu.
Campagne yango ezali mpe na mokano ya koyebisa bavandi mpo na ntina ya kobatela bazamba mpe kozongisa bisika oyo matiti elimwaki.
Basi bazali na mokumba monene na mwango oyo. Babongisi bazali na elikya ete bakokoma basani ya ntina na bobateli zinga zinga na kati ya ba communautés na bango.
Na yango, soki okokaki kolona nzete lelo, nzete nini okopona?
