Jannah Theme License is not validated, Go to the theme options page to validate the license, You need a single license for each domain name.
Lingala
A la Une

Mpo na nini kokatakata nzoto ya basi (FGM) ezali naino?

Na 2026, bana basi bazali naino kosala FGM na mikili mingi. Na Mali, momesano oyo ezali likambo ya moto. Basusu bandimaka ete esengeli kokoba, nzokande basusu balingi ete bátika yango. Kasi mpo na nini FGM ezali naino lelo oyo?

FGM ezali ntango eteni ya binama ya kobotela ya mwana mwasi to ya mwasi ekatami to ebongwani. Mbala mingi basalaka yango epai ya bana basi ntango bazali naino bana mike.
Bato mosusu bapesaka mabɔkɔ na FGM mpo batalelaka yango lokola bonkɔkɔ ya ntina mingi. Na mabota mosusu, momeseno yango eumelaka na mabota na nkola.
Basusu batɛmɛlaka FGM mpo bakanisaka ete mwana mwasi asengeli te kosala lipaso yango kozanga ntina ya monganga. Balimbolaka mpe ete ekoki kopesa mpasi mpe kobimisa mikakatano ya kolɔngɔnɔ ya nzoto.
Uta sanza ya mwambe, makambo maye mazali kolobelama mingi na Mali, mingi mpenza na ba medias sociaux. Le 22 août, bato basanganaki mpe na Mali mpe na France mpo na kosenga bosukisi bokati binama ya basi (FGM).

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *

Bouton retour en haut de la page