Lingala
A la Une

Na Guinée, biteyelo 50 ezali komibongisa mpo na koyekola na mayele ya nimero!

Kanisá ete okoki koyekola na tablɛti, ata na eteyelo oyo ezali na kura te!

Na Guinée, Fondation Orange na UNICEF bazali kosala boyokani mpo na kosunga biteyelo 50 na ba régions motoba kosalela technologie numérique. Ba espaces ya apprentissage oyo ekangami na internet pe oyo esalemi na énergie solaire eko permettre na ba élèves bazua ba ressources ya sika ya éducation.

Projet yango ekani mpe kopesa mateya na bana basi 500 ya bilenge na mayele ya siansi, ya tekiniki, mpe ya nimero, mpe kopesa bourse mpe mbano 100 mpo na mosala malamu.

Kasi yebá: baordinatɛrɛ ezali nyonso te! Balakisi mpe bazali na mposa ya lisungi mpo na kosalisa banakelasi báyekola na bisaleli yango.

Mpe yo, soki okokaki kosalela tablette na kelasi, nini okolinga koyekola liboso?

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *

Bouton retour en haut de la page