Nigeria: Na Musée ya Lagos, okoki mpe kosimba istware!
Na Nigeria, Musée national ya Lagos ebongwani mpenza! Ba galeries na yango oyo ebongwani ebengisaka bapaya ya mibu nyonso mpo na kozwa biloko ya motuya ya kala na lolenge ya kosepelisa mpe ya boyokani.

Ba éclairages ya sika, ba vitrines modernisées, mpe bisaleli mpo na kobatela malamu ba collections : musée ezali ko transformer mpo na koyamba public na ba conditions améliorées.
Mpe talá likambo ya sika oyo ekamwisaka mingi: na galerie moko, bapaya bakoki kutu kosimba na malɛmbɛ biloko oyo baponaki! Lolenge moko ya kokamwa ya kozala na boyokani na lisolo ya bato.
Musée yango ezali, kati na biloko mosusu, biloko ya motuya ya arkeoloji oyo etali sivilizasio ya Nok, sivilizasio ya kala oyo eyebani mpo na mayemi na yango ya kokamwa ya mabele ya lima.
Bobongisi oyo, oyo esungami na IHS Nigeria mpe Commission nationale ya ba musées mpe ba monuments, ezali na mokano ya kotinda bilenge báyeba libula na bango.
Oyebaki? Musée ezali kaka te esika ya kotala biloko ya kala. Ezali mpe esika ya koyekola, kolukaluka, mpe kosala mibembo na ntango!
