Lingala
A la Une

Okozala nini ntango okokola?

Kobanda mokolo ya 12 kino le 16 octobre 2026, bato ya Afrika mobimba bakosangana na Harare, na Zimbabwe, mpo na poso ya makoki ya Afrika. Elongo, bakosolola na ntina ya misala ya lobi mpe lolenge nini kosalisa bilenge bayekola mayele ya sika mpo na kozwa mosala na nsima ya bomoi.

Ozali na ndɔtɔ ya kokóma monganga, ingénieur, mopanzi-nsango, to moto oyo asalaka masano ya video? Na poso ya makoki ya Afrika, bakambi, ba entreprises, ba institutions ya formation, pe bilenge bakosangana pona kolobela makoki oyo Afrika ekozala na posa na yango na ba mbula ekoya.

Mpo na nini likambo yango ezali na ntina? Pamba te mokili ya mosala ezali kobongwana. Intelligence artificielle mpe bisaleli ya nimero ezali déjà kobongola misala mingi. Makoki mosusu ezali kokóma na ntina mingi, na ndakisa mayele ya kokela, kosilisa mikakatano, mpe kosala na ekipi.

Molulu yango ezali mpe na mokano ya kolendisa boyokani kati na biteyelo, ba centres ya formation, mpe ba entreprises. Mokano : kobongisa malamu bilenge mpo na koluka mosala mpe kopesa maboko na bokoli ya bikolo na bango.

Kasi moto moko te akoki kosakola mpenza misala nini ekozala lobi!

Na yo, mosala nini olotaka kozala na yango tango okokola?

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *

Bouton retour en haut de la page