Rwanda: Ba gorilles bazua esika mingi
Na Rwanda, mosala moko ekani kokólisa Parc national ya Volcanoes, esika oyo ba gorilles ya ngomba efandaka. Mokano ezali ya kopesa bango esika mingi mpe kopekisa bango bapusana penepene mingi na bandako mpe bilanga.

Parc national ya Volcanoes eyebani mpo na ba gorilles na yango ya ngomba. Kasi ntango mosusu banyama yango elongwaka na esika oyo ebatelami mpo na koluka bilei. Na nsima, bakoki kopusana penepene na bandako to milona ya bato oyo bafandaka pene na parke yango.
Mpo na koboya mikakatano miye, projet moko oyo esungami na Fondation africaine des animaux sauvage ekani kopanzana ya parc na 23%. Yango ekopesa ba gorilles esika mingi ya kofanda.
Kasi projet yango ezali kaka te mpo na banyama. Ezali mpe na mokano ya kosalisa bato oyo bafandaka zingazinga ya parke yango. Bandako ya sika soki 3 400 esengeli kotongama, bakisa mpe biteyelo, bisika ya bokolongono, mpe bisika mosusu mpo na bavandi.
Mokano ezali ya kokitisa matata kati na bavandi mpe banyama ya zamba na 80%.
Mpo na nini kotonga bandako mpe biteyelo mpo na kobatela malamu ba gorilles? Mpamba te bato mpe banyama bafandaka ntango mosusu penepene mpenza. Soki tobongisi bomoi ya bavandi, tokoki mpe kobatela malamu biloko bizalisami mpe banyama.
