Jannah Theme License is not validated, Go to the theme options page to validate the license, You need a single license for each domain name.
Lingala
A la Une

Zimbabwe: Application moko mpo na kosalisa baboti

Na Zimbabwe, programɛ moko ya sika epesi baboti toli mpo na ndenge ya kobatela bana na bango ya mike malamu. Santé, bilei, mangwele, komelisa bana mabele… baboti bakoki kozwa sango ya pete mpe ya kotyela motema.

Application yango babengi yango Rerai Umntwana, oyo elimboli “kobatela mwana.”

Esalemaki na Ministère ya Santé mpe Bolamu ya bana ya Zimbabwe na boyokani na UNICEF, na nzela ya lisungi ya mosolo ya gouvernement ya Japon.

Baboti bakoki kozwa toli na ntina ya bilei ya bana, mangwele, komelisa bana mabɛlɛ, bokoli, mpe lolenge ya kobatela bango malamu koleka.

Application ekoki pe ko fonctionner hors ligne une fois que e téléchargé. Ezali na Lingelesi, Shona mpe Ndebele, minɔkɔ misato oyo balobaka na Zimbabwe.

Mpo na nini appli oyo ezali na ntina? Na internet, moto akoki ntango mosusu kozwa bansango ya lokuta to toli ya mabe. Rerai Umntwana epesaka baboti nzela ya koluka ba informations vérifiées nionso na esika moko.

Zimbabwe ezali mboka ya liboso na Afrika oyo ebandi version na yango moko ya plateforme mondiale oyo ya UNICEF.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *

Bouton retour en haut de la page