Lingala
A la Une

Ba caméléons minei ya sika ba découvert na Mozambique

Na bangomba ya Mozambique, bato ya siansi bamoni ba caméléon minei ya mikemike oyo bato nyonso bayebaki liboso te.

Bato ya siansi bamoni mitindo minei ya sika ya caméléon na bazamba ya bangomba na nɔrdi ya Mozambique. Banyama yango ya mikemike efandaka na bangomba minei oyo ekabwani. Balukiluki bayekolaki yango mpo na kondimisa ete ezalaki mpenza mitindo minei ekeseni.

Ngomba mokomoko ezali na caméléon na yango oyo ekeseni na mosusu nyonso. Bokutani wana ya kokamwa emonisi ete biloko bizalisami bizali naino na basekele mingi!

Kasi ba caméléons yango ezali na mposa ya bazamba na yango mpo na kobika. Bazamba mosusu kati na yango ezali na likama mpo na bilanga. Na yango, kobatela bangomba yango elimboli mpe kobatela banyama yango oyo euti komonana sika.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *

Bouton retour en haut de la page