COP31: Likita monene mpo na kobikisa planɛti na biso!
Kanisá naino bokutani monene elongo na bamonisi ya pene na mikili nyonso ya mokili! Ezali COP31!

Na boumeli ya mikolo mingi, bakosolola na planɛti na biso. Mpo na nini? Mpo molunge ezali se kobakisama! Eleko ya molunge ezali kokóma molunge makasi, bitúká mosusu ezali na bozangi ya mai, mpe bitúká mosusu bizali kotungisama na mpela makasi.
Na yango, tokoki kosala nini? Bikólo ekoluka ndenge ya kosilisa mikakatano: kosalela mingi nguya ya moi mpe ya mopɛpɛ, kokitisa bosɔtɔ, mpe kobatela bazamba.
Afrika pe ekozala wana! Na kontina yango, mikili mingi ezali kosala misala mpo na kobimisa kura na lisalisi ya nguya ya moi mpe ya mopɛpɛ.
Mpe ezali boni mpo na bana? Bazali mpe na rôle ya kosala! Mokolo moko ya liyangani ekopesama na bilenge, mateya, mpe lobi na bango.
Po planète ya lobi pe nde oko vivre na yango!
Oyebaki? Moi ekoki kobimisa kura na lisalisi ya ba panneaux solaires. Mpe mopɛpɛ ekoki kobalola ba turbines minene ya mopɛpɛ. Wana ezali mitindo mibale ya énergie renouvelable!
