Elihle Stali: Elenge Inventeur ya Afrique du Sud Oyo Alingi Kosunga Bato Bakufa miso
Ntango azalaki mwana moke, Elihle Stali azalaki kosalisa nkɔkɔ na ye ya mwasi oyo akufá miso atambola. Apesaki elaka moko: mokolo mosusu, akoluka lolenge ya kosalisa ye akóma na lipanda mingi. Lelo oyo, elenge oyo ya Afrika ya Sudi azali kosala ba lunettes ya mayele na nzela ya mayele ya kosala. Lisolo oyo ezali kolakisa ndenge oyo likanisi moko ekoki kosalisa basusu!

Kanisá ete ozali na likoki te ya komona oyo ezali liboso na yo. Ndenge nini okoyeba soki kiti moko ezali kokanga nzela na yo to soki eloko moko ezali likoló ya mesa?
Wana ezali mitindo ya mikakatano oyo nkɔkɔ ya mwasi ya Elihle Stali, oyo azalaki kofanda na Afrika ya Sudi, akutanaki na yango. Ntango azalaki mwana moke, mbala mingi Elihle azalaki kosalisa ye atambola. Asosolaki ete misala mosusu ya mokolo na mokolo ekoki kozala mindɔndɔ mpo na moto oyo akufá miso.
Na yango, amitunaki: boni soki tekiniki ekokaki kosalisa ye atambola na pete?
Lunettes ya koloba!
Elihle a fondaki Spectacles4TheBlind SA, entreprise oyo esalaka ba lunettes intelligentes na équipe ya ba partenaires.
Basalaka ndenge nini? Na nzela ya kamera mpe bisaleli ya mayele ya kosala, bakoki koyeba biloko mpe kolimbola makambo oyo ezali zingazinga ya moto oyo alati yango. Na nsima, balobaka makambo yango na mongongo makasi.
Ba lunettes yango esalemi mpo na kosala na minɔkɔ mingi, na ndakisa Lingelesi, Afrikaans, Xhosa, Zulu, mpe Sotho.
Mokano ezali pɛtɛɛ: kosalisa bato oyo bakufá miso to oyo bamonaka malamu te básosola malamu esika oyo bazali mpe bázala na lipanda mingi.
Elenge inventeur oyo atika te
Nzela ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te. Mpo na kosala projet na ye mpe kolakisa yango na poto, Elihle akutanaki na mikakatano mpo na kozwa misolo. Na sima abandi campagne ya collecte ya mbongo na internet, oyo esungami na ba Afrique du Sud mingi.
Na 2019, ntango azalaki naino na eteyelo ya ntei, asilaki kopesa likanisi ya liboso mpo na invention oyo na momekano moko ya siansi. Banda wana, azali kokoba kosala mosala na ye mpe azwi mbano mingi.
Na 2026, équipe na ye eponami mpe na kati ya ba startups innovantes oyo babengisaki mpo na ko présenter ba idées na bango na événement international ya technologie na Hong Kong.
Ba lunettes esengeli naino koleka na ba étapes ya développement mpe fabrication avant bakoka kopesa yango na échelle ya munene. Kasi Elihle atikali komipesa na mokano na ye: kotia tekiniki na mosala ya baye bazali na mposa na yango.
Na yo, invention na yo ekozala nini?
