Jannah Theme License is not validated, Go to the theme options page to validate the license, You need a single license for each domain name.
Lingala
A la Une

Ezongi na kelasi! Osili komibongisa?

Ezali bongo! Ba fêtes esili… Tango ekoki ya kozonga na kelasi! Kasi oyebi bana boni na mokili mobimba bazali naino na libaku te ya kozwa saki na bango ya kelasi ntɔngɔ nyonso?

Lelo oyo, bana mpe bilenge soki milio 273 bazali kotánga kelasi te na mokili mobimba. Na Afrika, kozwa kelasi ezali kaka mokakatano monene. Kasi, makambo ezali kokende liboso: banda 2015, bana mosusu milio 75 bakɔtaki na ebongiseli ya biteyelo na kontina yango.

Mpe ntango banakelasi ya sika bazali kozwa bakelasi na bango, mbongwana mosusu ezali kosalema: mbongwana ya mayele ya sika na makambo ya kelasi! Ordinatɛrɛ, smartphone, ba plateformes numériques, mpe bisaleli ya sika ekoki kosalisa bana báyekola ndenge mosusu mpe bázwa boyebi na pɛtɛɛ nyonso.

Kasi koyekola ezali kaka te kofanda nsima ya mesa. Ezali mpe mpo na kotanga lisolo, kotuna motuna, komeka, kosala mabunga, kobanda lisusu, ko inventer, mpe kokabola.

Na yango, mpo na mbula oyo ya sika ya kelasi, mokakatano na yo ya liboso ekozala nini? Koyekola likambo ya sika? Kotánga makambo mosusu? Kotuna mituna mingi koleka?

Ezali likambo na yo! Mpe likolo ya nionso… bozala na ebandeli malamu ya mbula ya kelasi!

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *

Bouton retour en haut de la page