Lisolo ya Justine, elenge mwasi moko ya mbula 13 oyo abalanaki na makasi, ekundweli biso ete atako bokoli esalemi na Afrika, bana mingi bazali naino konyokwama na momeseno yango.
Justine, elenge mwasi moko ya mbula 13, oyo azalaki kofanda na mwa mboka moko na Togo, abalaki mobali moko oyo aleki ye mingi na makasi. Lokola azwaki mobulu na nzoto mpe na mayoki, amekaki komiboma, azalaki lisusu kokoka kokanga motema na likambo yango. Atako minganga mpe bakonzi basalaki milende nyonso, Justine akufaki na mokolo ya 8 Yanuali 2025 nsima ya kokɔta lopitalo na mokolo ya 31 Desɛmbɛ 2024. Lisolo na ye ezali mawa, kasi ezali komonisa mokakatano oyo ezali naino kotungisa bana mingi: kobala na makasi.
Na Afrika, bana mingi, mingimingi bana basi, batindamaka na makasi mpo na kobala na mbula ya mike mpenza, mbala mingi kozanga bolingi na bango. Wana ezali mabala oyo epekisaka bango ba vivre bomwana na bango, ba continuer éducation na bango pe ba réaliser ba rêves na bango. Na esika ya kokola na bonsomi, mbala mingi bana basi wana bakutanaka na mobulu mpe kobebisama, lokola esalemaki mpo na Justine.
Likambo ya esengo, masanga mpe bato oyo bamipesi bazali kobunda mpo na kobongola likambo oyo. Bazali ko sensibiliser, kosunga ba victimes mpe kosenga mibeko ya makasi mpo na kopekisa mabala ya makasi. Na ntina na milende na bango, bokóli esalemi na mikili mosusu ya Afrika, kasi makambo mingi etikali kosala.
Lisolo ya Justine ekundolisi biso ete ezali na ntina mingi kokoba kobunda mpo na makoki ya bana.