juillet 27, 2024
Lingala

Nigeria : bayekoli bakangami

Tosengeli kolobela likambo moko ya mpasi oyo ezali kosalema na Nigeria. Kala mingi te, banakelasi koleka 200 bakangamaki na eteyelo moko na etúká ya Kaduna. Kokanga bato ebele ezali mokakatano monene na ekólo mobimba.

Mibali oyo bazalaki na bibundeli babundisaki eteyelo yango, mpe bazwaki bana mpe basali mingi na otage. Bakonzi ya mboka bazali sikoyo koluka koyeba mpenza bana boni bakangamaki. Oyo eza situation moko très somo pona bana oyo na ba familles na bango.

Mbala mingi, bato mingi bakangamaka na nɔrdi-wɛsti mpe na katikati ya Nigeria. Likambo ya mawa, mingi kati na bana yango batikalaka na boombo na boumeli ya bapɔsɔ to ata basanza tii ntango bakofuta lisiko mpo na kobimisama na bango. Eza mawa mingi koyeba que bana lokola biso baza na danger kaka na kokende kelasi. Bana nyonso babongi koyoka ete bazali na libateli mpe babatelami. Tozali na elikya ete bakonzi bakosala mpo na kobatela biteyelo na biso mpe kosala ete bana banso bazala na bokengi.

Related posts

Mali : Bankoto ya biteyelo ezali na likama

anakids

1 Mai : Mokolo ya makoki ya mosala mpe ya basali

anakids

Congo, projet moko esalisaka bana ya mabanga ya ntalo bazonga na kelasi

anakids

Leave a Comment