Lingala
A la Une
RDC: Train ezongi na Kinshasa!
Na République démocratique du Congo, na ville ya Kinshasa oyo epanzani, train moko ya bleu ya kongenga ebandi lisusu kokende! Ezalaki kokende mbangu te banda mbula pene na 15!

Engbunduka oyo ekangisaka gare ya centre-ville na libándá ya mpɛpɔ, na nzela ya kilomɛtrɛ 25. Na nzela na yango, bafandi basengeli lisusu te kolekisa bangonga mingi na emboutelo mpo na kotambola. Mokolo na mokolo, ememaka bankóto ya bato, ntango mosusu ekangamaka lokola sardine na bashario! Train oyo ezali na kati ya projet monene oyo babengi MetroKin, oyo ekani kotonga ba kilomètres 300 ya ba lignes ya chemin de fer na engumba mobimba. Mokolo mosusu, ekoki mpenza kozala réseau ya engbunduka oyo eleki monene na bingumba na Afrika!
Oyebaki? Kinshasa eza na ba habitants presque 20 millions, koleka population mobimba ya Belgique!
