Thabang, inventeur oyo azali kosalela nguya ya moi
Thabang Moashetsi azali elenge inventeur ya Afrique du Sud oyo alingaka ko comprendre ndenge makambo esalaka. Bolingo na ye ya siansi ebandaki na eteyelo nsima ya kokutana na bilenge mosusu oyo babimisaki mayele ya sika. Lelo oyo, azali kosala masini moko mpo na kosukola ba panneaux solaires mpe kosala ete esalaka malamu.
Na 2019, ntango azalaki na mbula 12, Thabang akendaki kotala esika oyo bilenge bato ya siansi bazalaki kolakisa. Kuna, amonaki ete bana-kelasi bazalaki kolakisa biloko oyo bango moko babimisaki. Expérience oyo e inspiré ye a créer oyo ya ye.
Mwa bambula na nsima, akómaki kosepela na ba panneaux solaires, baplakɛ wana ya minene oyo esalelaka pole ya moi mpo na kobimisa kura.
Thabang amonaki ete bakoki koyanganisa mputulu mpe bosɔtɔ. Na nsima, esengeli kosukola yango mpe kotala soki ezali kosala.
Azwaki makanisi ya ASAMS, masini oyo ekoki kosalisa mpo na kosukola mpe kolandela ba panneaux solaires.
Lelo oyo, Thabang azali koyekola informatique na université ya technologie ya Tshwane mpe azali ko développer invention na ye na entreprise na ye, Allketek Energies. Projet na ye esengelaki ko compétitionner na concours national na novembre 2026.
Lisolo ya Thabang emonisi que okoki kobanda ko inventer depuis école. Tango mosusu esengaka kaka kotala problème moko pe komituna, « Ndenge nini nakoki kosilisa yango? »
